Categorized | Les Stars, THEATRES

Levée du corps de Lisala!

Na temps et toujours à la seconde congomikili.com était présent à la levée du corps de papa Lisala, le grand artiste comédiens que le Congo a encore perdu dernièrement. Suivez ces images exclusives.(si vous êtes sensibles ne regarder pas cette video.)

Vous pouvez aider la veuve de papa Lisala au 00243998364650 ou 00243814778354

Vos dons et soutiens à sa famille seront vraiment appreciés !

98 Commentaire pour cette article

  1. elisee Says:

    mawa mingi komona bana ya moninga mike kolela lolenge oyo .
    likambo ;yo zambe kaka ,mwasi oyo na bana 6 po asala nini na crise ya boye.
    zambe abatela ba comediens na biso

  2. clemso Says:

    mawa trop eza kosala pasi komona ba image ya boye comme de la blague papa lisala akufi donc ba comédiens ba komi lokola bilanga mutu nioso alingi kobuka abuki nzambe kata likambo oyo tia fin na makambo oyo soki pe ba lobi ba tika musala ya comédie ba ko sala nini moto na moto azali na mosala na ye, nzambe abatela muasi ya papa lisala na bana parce que yende azali papa ya ba orphelins pe mobali ya ba veuves, pe protection de Dieu ezala likolo ya ba comédiens nioso nzambe a protéger bino.

    votre frère clemso

  3. madina Says:

    Bravo pona bilili ya congo mikili kasi mawa ya kotala mutu alali vraiment mawa na motema na pasi haha ezali pasi ya komona bana miki batikali sans papa na pays oyo ya biso ezali na pasi hahahha ata ndele pasi ekosila Nzambe ayebi akolongola pasi oyo na peuple na ye na moment oyo ye moko ayebi ezali volnte ya createur te amonaka batumba kufaka boye mawa que ton ame repose en paix we miss you your family miss you too seul espoir ya batu ezali resurection soon na paradi

  4. sousi Says:

    eza pasi mingi makamboyo kasi tokosala lisusu nini nzambe yemoko asunga nayoki motema pasi komona bana bazolele papa bazananu mike pona nini boye vraiment nzambe asunga apesa muasi atikali makasi nabana po eza pasi surtout naba mboka lokola ba congo mawa oh ngolo oza wapi papa lisala bisika ozali opema nakimia

  5. missverité Says:

    c est triste………………les mots me manquent

  6. nadia Says:

    que son ame repose en paix ,que la terre de nos ancetres lui soit douce et legere

    congomikili boza vraimment fin pe tjrs na temps courrage na bino bo continuer kaka boye toza tjrs na sima na bino

  7. la creatice gucci Says:

    merci congomikili pona ba image pasi namotema komona mwana azali ko lela papa nzabe asunga bango papa lisala que ton ame repos en paix

  8. art. TINTIN (usa) Says:

    thank you sooooo much…Congo mikili soki bino te nalingaki na mona image ya best freind na nga te(lisqala)nako panza matanga ya lisala ce dimanche na charlotte noth carolina USA pona batu oyo balingaka lisala na USA and nako tindela bino image. oyo alingi a help famille ya art.sur USA contact 704-605-8848(tintin) please congo mikili botindela nga image ya mon frere lisala sur 2232 wilson ave charlotte Nc USA 28208 mazo lelaka heur noiso ba project ya nga na ye posa yako zonga congo esili. nako yoka ye lisusu te na phone I love u lisala …and thank you na soutien ya batu tout and God bless u….TINTIN art(realisateur,comedien, act. and photographe love u lisala na ngomba kotobilike!!!!! )

  9. clemso Says:

    vraiment que ton âme repose en paix celui qui tue par l’épée mourra par l’épée je juge personne mais la colère de Dieu va s’abattre sur toi si tu ne veux pas te convertir repend toi et demande pardon a DIEU mais si tu continu a chercher les innocents les comédiens qui se débrouille pour leurs familles et leurs foyers DIEU va te surprendre

  10. rola Says:

    pasi mingi na ba comedien na biso motema mabe ewuti bango wapi pona kosala muninga boye?

  11. nadia Says:

    ELOKO NAZO KAMUA BANGO TOUT BAZOKUFA APRES 3 OU 4 MOIS EN PLUS MALADE PE YA MALONGA TE EXEMPLE : TATU KALOMBO AKUFI ABELI TE 3OU 4 MOIS APRES VISA ALANDI NA MARS 3 MOIS APRES SANS SOUCI AKEYI NA JUIN SIKOYO ESALI KAKA 4 MOIS APRES LA MORT DE SANS SOUCI LISALA PE AKEYI

    KOKAMWA……….. MATCH EZA MABE COTE YA BA COMEDIENS BALUKA ELONGI NA NZAMBE

  12. clemso Says:

    je m’adresse aussi a vous mes frères et sœurs artiste comédien il est temps vous puissiez cherché maintenant la face de DIEU bozua yango ba jeu te parce que quand vous êtes en train de dormir, dans le camp du diable bango bazali ko se préparé ndenge nini po ba déstabilisé bino bozua méssage oyo na sérieux il n’est pas encore tard bolamuka!!!! bolamuka!!!! bolamuka!!!! satana atelemi na mapinga naye bino pe bo telema na mabondeli biso pe tozotia bino na ba prière nzambe ako kata singa oyo

  13. julie espagne Says:

    Une minute de silence.
    Que son repose en paix et que la terre de nos encetres te soit legere et douce.
    liwa, liwa, liwa. on a plus de mot, tu vient sans pitie pour arracher le plus important.
    a sa femme et a ses enfants,que le seigneur vs soit favorable.
    pcq la bible declare:il est le pere des orphelins et le mari de veuve.

  14. José Says:

    Eza pasi komona makambo ya boye, mais soki bango na bango
    bazali kosalana mabe, bako tikalaka ko bonga te.
    alors ngai na kanisi boye, biso bana mikili tosomba lisusu ba Théatres te
    po bakomi kosalana mabe, biso tolingi ko participer na kobomana wana te, ezalaka malamu mutu azanga bilei mais azala na santé ya bien, que ozala na risque ya boye, TOSOMBA LISUSU BA THÉATRES TE, po makambo oyo esila, babomani mingi, donc bazo mekana makasi vraiment, depuis bakomi koya na bango na Poto eye penza makasi, encore une fois bana mikili TO TIKA KO SOMBA BA THÉATRES, po to sauver ba oyo ba tikali po ti toko koma Decembre toko yoka lisusu mibale ba kufi. Bino ba producteurs toza contre bino te mais ilfaut milimo ebika.
    merci bo coomprandre po kanda soki esangani na mawa ndenge esalaka.
    tozala mobiliser pona ko aide muasi na bana atiki….
    Que son âme repose en paix…..

  15. maman feza Says:

    Esali pasi mingi, les mots me manq…qu’il repose en paix au nom du Christ.
    Grand felicitation na CONGO MIKILI bona ba informations, rapidité yakopesa ba infos ezo facilité biso au lieu comme avant to bengaka lisusu kin pona koyeba (est-ce qu’eza ya solo…Non aujourd’hui tozo zua yango na SOURCE.
    Une fois de plus merci na source ya Montréal

  16. Amélie Masuba Says:

    FIOTI SUSPECT!! Bo FUNGOLA MISU EEEEEEE!!!

  17. pappy Says:

    merci congo mikili nasepeli mingi na nioso bozali kosala lelo tokomi na pag directement na kin ezali esengo mingi .FAMILLE OYO MAWA MINGI NA MUNTU ABOMI PAPA LISALA EZALI KOPESA NGAI PASI MINGI NAZALI KOLELA MINGI NAKOPANZA MATANGA YA PAPA LISALA SAMEDI NA POKUA BANA NIOSO YA WIEN OYO ALINGI KOYA KOKABOLA MAWA NA NGAI BOLEKA SAMEDI NA POKUA NA MALEWA NA VIENNE 1070 wien ,

  18. adel-nska Says:

    nakoki te kakankolela,pona nini boye nzambe,botala siko misuna nabino epai ya nzambe.

  19. clemso Says:

    merci mingi lisusu pona congo mikili Amélie Masuba, tu n’a pas le droit de dire que FIOTI aza suspect parce que oza na ba preuve te to partager mawa na bandeko oyo ba kufeli tika ko loba biloba loba tika mowei akundama na kimia sois mature s’il te plait

  20. PANZU TAVARES Says:

    eza pasi kotala ba image ya boye,nkolo olingi oteya biso nini?komona bana ya papa LISALA bazolela eza pasi mingi

  21. Nina Espagne Says:

    Eza pasi mingi na motema komona ndenge muana azolela papa na ye…
    NZAMBE ayamba yo papa LISALA que ton ame repose en paix. Quand je pense que tokomona yo lisusu te oh!liwa

  22. talatala Says:

    bo tika bilobela na liwa ya papa lisala.yo amelia,fait gaf yakoloba babilobela na kombo ya fioti. just to soutenir bango na ba priere.tika kopesa diable nzela.ye bake liwa ezalaka volonte ya nzambete,ezali volonte ya diable,po diale alingaka amona kabiso,toujour triste.

  23. BOUBOUTONIC Says:

    Que ton ame repose en paix et joli reportage de la part de congo mikili

  24. nathalie Says:

    Que son ame repose en paix.

  25. niclette Says:

    nioso na maboko ya nzambe ye nde azo mona makambu ya boye pasi kokata vie ya moninga kaka pona 100 dolard moto wana il faut atika makambo oyo asali tala sikoyo bana ya lisala batikali orphelin de pere mwasi na ye akomi veuve eza pasi mingi bana mike bazo lela papa na bango en tout cas bakonzi ya mboka ba tala nanu likambo oyo ya mbasu ba kotisa tolerence zero nanu po batu bakosila ba policier ba kanga batu bateka ka ya ngo naba wenze meme na ba ndaku

  26. Jonas bkv Says:

    C’EST TRES TRISTE!! QUE SON AME REPOSE EN PAIX!! KASI MPO NANGAI NDEKO AKUFI NA MALADI BA BENGI:BACTERIE MANGEUSE DE CHAIRE(flesh eating bacteria,streptococcus pyogenes) OYO BINO BOZOBENGA NA KIN “MBASU”,EZA KINDOKI TE EZA MALADIE MOKO;CERTES RARE MAIS MALADI NETI CANCER,LEPRE etc… YANGO BOTIKA KO KOSELA BA CONFRERE NAYE TO FAMILLE NAYE KINDOKI!!! MALADI WANA SOKIOZWI TRAITEMENT TE(operation-emputation,antibiotique) OKOSALA 7 JOURS NABOMOI TE!! C’EST LE CAS DU FRERO, ABELI KAKA 5 JOURS. YANGO WANA,SOKI OBELI,LUKA OMONA DOCTEUR AVANT TOUT: simple reflexe!! MAKAMBO MISUSU ESENGAKA N’ANGO TE QUE PASTEUR,SANGO TO NGANGA,KASI MAYELE KAKA NZAMBE APESA BISO.!! NA BA MISUSU BA FANDI AWA NAPOTO,KASI MAKANISI YA ZAMBA KAKA,BOZA NA INTERNET,BA BIBLIOTHEQUES etc.. BOKO S’INSTRUIRE ATA MUKE TE??! KA KOLIAKA BA SEMOULE, MUSIQUE NA BILAMBA!! BOZUAKA MAYELE LOKOLABOZUA “CHANCE” YAKOKOMA MIKILI BOSALELA YANGO ETE MUKOLO TOKOZONGA NA MBOKA,ESALISA MPE BANDEKO NA BISO!! MINAMALIZIA APA NAKU BAMBIA MUKUWE NA TUMIKISHA AKILI SA MOYA,MUACHE MAMBO YAKUONA BULOZI MUKILA KITU!! **Mtoto ya BKV apa LYON** SALAAAAAM**

  27. makero Says:

    papa lisala molimo na yo epema na kimia nzambe abatelayo bisika okeyi pesa mwasy nato makasi ya kobokola bana otikeliye

  28. ROLLY EXPRESS Says:

    JE PENSE QU’IL FAUT UN EMBARGO POUR LES DVD DE THEATRE CONGOLAIS.NOUS EN AVONS ASSEZ DE PLEURER NOS COMEDIENS DE TALENTS; MBAZU EST UNE MALADIE D’EMVOUTEMENT VOLONTAIRE.CERTAINEMENT LE SORCIER OU SORCIERE EST PARMI EUX.

    Ev. ROLLY-WUMBA, Paris

  29. Blb Says:

    Merçi bcp à congomikili pour ce reportage. Pas des commentaires,j’ai des larmes aux yeux.

  30. clemso Says:

    jonas bkv arrêt de dire n’importe koi, na tango ya kala ozalaka ko yoka maladie kombo mabsu na kinshasa? mbasu ezali maladie oyo bazali ko bwakela batu na Congo pourquoi microbe wana ya: BACTÉRIE MANGEUSE DE CHAIRE ezali na succès awa na poto te kaka na congo? en plus tu te permet d’insulter les gens que bazo lia ba semoule awa na poto t’es malade ou comment, partageons la douleur avec la famille éprouver et prions que la grace de DIEU soit sur ses orphelins et la veuve en plus PAPA LISALA n’etait pas mushuaili ni les membres de sa famille tango ozali koloba suaili tu t’adresse a qui?

  31. Sylvie Says:

    Q ton ame repose en paix. Nakosenga na ba comedien(ne) na biso, il faut ba touver la face de Dieu c tres important. “Avant tte chose c Dieu et apres tt chose c tjr DIEU” Donc nalingi koloba ke tanto ba pesi yo! yeba kotika yanyo ds la mn 2 Dieu “loba tata nzamber q ta volonte soi faite. Kozia kaka te mbala moko depense po mokili oyo ekomi na suka. Kimia ezala na famille nionso pe Nzambe a batela biso.Merci congo Mikili nzambe a benir bino na mosala na bino pe bokokende MOSIKA.

  32. Sylvie Says:

    courage a la pouvre famille

  33. Tshobi marianne Says:

    Ezali pasi mingi comona ba artister comedien colandana na kokufa boye papa nzambe talela biso likamba oyo papa nzambe obatela familly lisala atiki A DIEU PAPA LISALA

  34. emilie Says:

    esali mawa mingi na komona lelo lisala atiki biso esali pasi mingi surtout pona libota naye bana muasi naye mingi ya koloba ezali te nzambe azala na bango na pasi oyo ezali na mboka na biso liwa na ba comediens na biso ekomi kobangisa biso donc bango na bango baloba bien na suki awa congomikili na sepeli na bino mingi na ba
    info na bino sans bino mbele toyebi te que lisala akufi emilie a sarreguemines 57200

  35. kotonda Says:

    nazangi maloba kotala mutu alali pongi akolamuka lisusu te pasi na motema bana naye balelisi ngai haa pona nini boye nzambe na tango ya kala batu bazalaki kokufa boye te mais lelo tokomi kokufa lokola ba soso.kimotema mabe eleki mingi bible ekomi mutu normalement akoki kokufa na ages ya 73 ou 75 ans mais ezalaka penza rare batu bakufa naba agee wana eza pasi mingi kotala makambo ya boye. lisala tolingaki yo mingi tika ete nzambe ayamba yo esika okei totikali kaka naba suvenir nayo tokobanda kaka kotala yo naba theatre oyo osalelaki biso merci lisusu ya mingi na congomikili nzambe apambola bino ya mingi

  36. engambe Says:

    Nga nayebi te soki elakisi nini mais ,esali mua tango ebele a peu pres 3 ou 2 mois nalotaki ba comedien nionso bazalaki likolo ya kundebembe .bazalaki kokende kotika muninga na bango MOKO akufaki,mais cequi est grave dans se reve ezalaki que mutu bazalaki kokende kotika azalaki kokende na lifelo,pe bango nionso bazalaki pe kokende kaka na lifelo.

    esalaki nga pasi mingi na lukaki numero ya comedien moko po na benga mais na zuaki te.

    eloko na kosenga na bango eza ete ba luka vraiment elongi ya nzambe ba mua ba protection na bango ba kendaka koluka na ba nganga kisi,naba bisimba simba na bango.nzambe ayebi bino naba kombo na bino,yango atindaki yezu mesiya ayakokufa pona bino,yaka na yezu akobatela kaka yote mais libota nayo mobimba.

    Ba ndeko na nga pona koyeba que satana akomi kosala na kati ya ba comedien na biso.botala kaka ba theatre ya mikolo oyo elateli ya bana basi .mipende libanda,calecon libanda,toujour masanga.

    ndeko lobi tango mususu ekozala tour yayo, surement okokende na moto soki obongoli motema te.yezu masiya alobi :atelemi na porte ya motema nayo azali kobeta soki ofongoli ako kota pe ako zala nayo kino suka.
    tala chemin ya bomoyi ya seko ezakaka moko ce JÉSUS CHRIST.
    bakosa yote,JÉSUS CHRIST aza le seul chemin oyo eko mema yo na lola.

    kolobate que nga nasambelaka na A bo papa to mama na nga akendaka kuna ou po cherie na nga akendaka kuna ou po ba pesa nga poste.Mais MITUNA MOTUNA OYO ESQUE NZELA NAZO LANDA SOKI LELO EKOMI TOUR NA NGA ESQUE NAKOMONA BOKONZI YALIKOLO

    ?que DIEU vous Bénisse au nom de JÉSUS CHRIST.

  37. Rihanna Says:

    R.I.P LISALA NGOMBA KOTOBILIKI,TU VAS NOUS MANQUER ENORMEMENT!!!!!!!!!!!

  38. nasi Says:

    bosuka kaka wana tolembi bino batu ya theatre bozokufa mingi adieu lisala naza na kanda mingi komona un grant comediens alali ebembe akosekisa biso lisusu te bino batu ya theatre botika kobuakela baninga na bino malade sino vivee le piraterie toza sima ya bato wana batekaka pirate tokobanda kosomba bango bongo tokola bino sikoyo bien na minoko bokoma nango poto nde mutu ezosala bino bomeka kutu te na vue de loin eu meu ta validade wana bokoluka lisusu guere bien ba ndoki mitema mabe bana naye nani akobokolela ye bango bana mikie bongo eza mawa

  39. ebebakaka Says:

    Congomikili felicitation na reportage oyo po journaliste na bino asali yango penza na ndenge ya ba professionel epuis bo resumer yango kitoko.boza na equipe ya makasi.eloko moko nako senga na bino kaka eza que bo lakisa lisusu ebembe na serceueil bongo te po eza ko zanga respect na mort.basalaka bongo te,po ata MIchael Jackson oyo azalaki gd pretre to tikala ko mona ebembe na ye na serceueil te.
    Na mutu oyo abomi papa lisala,ye kaka na Nzambe na ye.ba ndeko bo tika ko kaka ba ndoki ou ko suspecter batu po boza na ba preuves te.oyo asali yango,ye moko ami yebi mais Nzambe nde ako futa ye na likambu asali.
    Oyo pe amini que il faut a aider famille ya Lisala,asala yango po apres matanga,mutu ako tala lisusu famille wana te.ezalaka kaka bongo na Congo.merci

  40. aline Says:

    papa lisala que ton ame repose en paix eza vraiment pasi makasi

  41. mm chicago Says:

    mawa mingi komono bana mike boye nzambe abatela mwasi na bana pe bacomedien nyoso merci mingi na congomikili.com ndenge bozosola mosala kitoko ko leka lingalafacili nzambe abakisela bino oyo ezangi pona bino bye

  42. nancy Says:

    nzambe asunga famille oyo po ezali pasi seingeur aconcole lecoeur oyo ezui pasi

  43. super mec 92 Says:

    En tout cas,felicitation ya trop Congomikili na ndenge ozotia biso na temps sur liwa ya LISALA oyo azalaki l’un de mes acteurs oyo nazalaki kosombela ba DVD.Pona nga NAMONI BISO BATU YA MIKILI TOTIKA NANA KOSOMBA SOMBA BA DVD YA THEATRES,EKOZALA BIEN PONA BA ACTEURS(TRICES)oyo bazali na bomoyi puisque VU DE LOIN pe ba bwakelaka ye pe maladie oyo soki MBASU mais NZAMBE asungaki ye traitement elekaki bien,et puis MAMA MOYINDO lisusu pe azua mm maladie ti lel’oyo amonanaka lisusu penza te nayebi te soki atika naye ou pas?Donc,il sera peut-etre mieux totika bango basalaka kaka pona ba chaines ya télé,comme kuna ba futaka bango presque rien JALOUSIE PE EZALAKA TE.BANA MIKILI BONDIMELA NGA SANS QUOI MOLONGO EKOZALA MOLAYI…na ndenge bakomi kozua ba voyage ya mikili,ekozala nde somo c.à.d boma nga na boma yo tobomana.TO AIDER BANGO BAMITIKA KI MOTEMA MABE.Toutes fois,Papa tika ete Nzambe akoka kobatela molimo nayo mpe okoka kopema na boboto.

  44. djofilskps Says:

    pasi pe mawa me nzambe ye moko ayebi toko sambela po na bino famille mobimba

  45. blaise Says:

    eza pasi na mawa mpo na liwa ya PAPA LISALA likolo ya biloko ya mokili lelo mutu munene ya famille na ye ake , eza pasi mpo na biso peuple congolais toli ngani ata muke te , na yebi te siki ba comedien bazo wela nini? kaka ba 100 euro oyo ezu wuta na poto epa ya ba producteur na va fans? tala lelo ndenge lisala atiki famille na ye na pasi , na yo moto oyo osali ye boye esika oza , oza na kimia na motema?mais nzambe oyo LISAL azalaki kosembela aza vivant, yo mpe yebaka que oza libanga te , lokola zolo na yo etala na se? un jour okolanda papa lisala . OU bien ba producteur batika musala ya ngo? to biso tosombaka lisusu ba theatre congolais ? bo raisonné bien ba ndeko ba comedien. PAPA LISALA nzambe oyo sala likolo na nse abatela yo mpe atia kimia na libota na yo mobimba. que son ame repose en paix

  46. odon pambu Says:

    PAS TROP A DIRE MAIS ESALI PASI MINGI nZAMBE KAKA AYEBI MAIS MUTU OYO ESALI LIKAMBU OYO YE PE UN JOUR AKOKOMA KAKA EBEMBE MAIS KOMONA BA PETITS NDE PASI NA MOTEMA QUOI……

  47. Cédric Ceda Basse Says:

    AH SOUCI,DOULEUR,CHAGRIN,
    MOKILI OYO EZA SOMO
    BA NDEKO TO LOBELI BA COMEDIEN, TOLOBELI PE LIWA, KASI BONI BONI KATI NA BISI BA YE
    TO TIKALI NA BOMOI LELO,TOZO COMPRENDRE KAKA TE?
    IL FAUT ETEYAKA BISO MAKAMBU YA BOYE
    SUR TOUT BISO AWA NA POTO TOKOMA KO MONA LOKOLA SUKA YA MOKILI, TO YEBA KE NZAMBE
    AZALI, PE LE SEUL AMI QUI N’ABANDONNE JAMAIS MÊME DANS LA MORT, C’EST NOTRE DIEU TOUT PUISSANT EMMANUEL, ALORS NGAI NA BINO BANDEKO OYO TO ZUI OCCASION YA KO TALA BI LILI OYO TO SOSOLA, PE TO BANGA NZAMBE

    “ETEYA YO”

  48. Cédric Ceda Basse Says:

    C’EST PAS AU HASARD QUE NZAMBE A PERMETTRE OTALA VIDEO OYO, SOSOLA
    “ETEYA YO”

  49. Jonas bkv Says:

    MWA PRECISION MPO NA clemso:SOKI OZA NA BATU NA KIN OYO BA KO CONSULTER BA ARCHIVE YA MINISTERE YA SANTE,OKO MONA BA CONCLUSIONS YA BA ETUDES VIRALES ET BACTERIOLOGIQUES OYO BELGE ASALA DEPUIS EPOQUE COLONIALE 1956(na Boma,sankuru,kolwezi,mpe na Buta!) KENDE MPE NA SITE ya OMS OKO COMPRENDRE.EN PLUS MALADI WANA EZA NA KIN TO CONGO KAKA TE,SOKI OZUI TEMPS BETA NA INTERNET(:flesh eating bacteria soki oza englophone,to Bacterie mangeuse de chaire na ba francophone) OKOMONA NDENGE EBOMA BATU NA USA,CANADA,FRANCE,UK,NA DERNIEREMENT NA HONG-KONG!!!DONC KOLOBA TE QU’EZA “KINDOKI” YA SIKA OYO EZA KA NA KIN! KASI AWA NA POTO EBELE BA BIKAKA,MPO BAZUAKA REFLEXE YAKO MONA DOCTEUR SOKI OBELI.C PRQUOI IL Y A MOINS DE DECES!! SOKI OBELI LUKA DOCTEUR AVANT NANU BA PASTEUR,SANGO,TO BANGANGA! YANGO WANA NALOBAKI BAMISUSU BAZUA “CHANCE” YAKO KOMA MIKILI,KASI MAKANISI YA ZAMBA TO KINDOKI TJRS NA MWA LIKAMBO BAYOKI TO BAMONI! SIKO’OYA INTERNET,NA BA BIBLIOTHEQUES EBELE ETONDI AWA NA POTO BOKO S’INSTRUIRE ATA MUKIE TE??!? YANGO NALOBAKI POTO EZA KA SEMOULE TE ,TO MUSIQUE OU BILAMBA!! BOZUAKA MAYELE YA MINDELE MPO ETE TANGO OZA NA CONGO ET SERVIR MPE BANDEKO NABISO!! MPO NA SWAHILI YO EYEBI TE QUE NA BA COMEDIENS NABISO BA SWAHILI BAZA!? NETI ELOMBE,MAMA SHAKO etc… Et SOKI NALINGI KOKOMA NA SWAHILI YO OZA NANI MPO OSALA NETI MWA GENRE MOKO BOYE??! BOTIKA BA SOUS ENTENDU WANA MPO SOKITE: TOKOYA KOPANZA RDC WANA TOUT LE BATU COTE NA BANGO!! MAIS EZA HEURE YA POLEMIQUE TE TO LELA NDEKO NABISO LISALA!!*** Mtoto ya BKV apa Lyon** Salaaaaaam*

  50. huguette Says:

    MAWA BANA PE FAMILLE BAZANGI ELOKO YA MOTUYA,nzambe yo olobi nini pona manguna na biso?tala makambo oyo po yo obundelaka baoyo ya yo jehova

  51. Gaby Tokodi Says:

    Mawa trop, mawa na ngai ezangi phrase mais nkolo azua lokumu.

    Nzambe ya mawa ayamba molimo ya nkondo Papa Lisala, molimo na ye epema na kimia

    Nzambe abatelabana nionso atiki, nazui mokano ya ko sunga bana wana avec le peu que je gagne, bino ba ndeko mosusu bosunga famille oyo.

    Na sengi na nzambe a agir po trop c’est trop.

    Peuple na ngai Congolais mawa, bato ba koma ko kufa lokola ba niama, nkolo ozali wapi? oza wapi nkolo?? mawa na yo na sengi na libota ya ba ndeko nionso ya theatre, mipepe ya liwa elongua na libota oyo, tia kimia na yo nkolo, ko tala mi bungi ya moko na moko te nkolo, confondre bato nionso ya misala mabe, kitisa ngauya na yo na libota ya ba ndeko na biso ya theatre pe na libota nionso ya congo.

    Ndeko nionso azua likambo oyo atia yango na losambo na ye to lelela nkolo asala na ndenge aza nzambe ya bolingo pe ya mawa ako sala.

    Aurevoir papa Lisala pe Merci na service nionso o rendre na nation na yo.

  52. LAUSANNE Says:

    EMBARGO……….EMBARGO NA BA DVD YA THEATRE PO ETEYA BANGO………NA BA FILLE WANA YA SIMA EKOLI………….BALELA KISI MAKASI……………….EZA PASI………………LUMUMBA PARDON LAMUKA………PO CONGOLAIS AYEBI KAKA RICHESSE MOKO ……………EZA MOTEMA MABE.

  53. aminata Says:

    Bien dit Lausanne kosomba ba DVD nde ekomi kobomisa bango baleki kutu ba musiciens na ba sportifs Congolais na kisi eza bien té .
    Mais mawa trop po na famille ya papa Lisala Ngomba .
    Mawa ya Nzambé ezala na famille wana abatela bana wana na pasi oyo ya Kinshasa .
    Papa Lisala apema na boboto .

  54. bobo bola libanga Says:

    bo tinda mua eleko na famille ya papa lisala bo tika bilobela kaka bino wana na ba ndanku na bino ba d.v.d etondi mawa

  55. homme de valeur Says:

    en regarda ce video je des larmes aux yeux papa lisala que ton âme repose en paix; congo mikili merci pour tous les info.

  56. clemso Says:

    Mon frère jonas bkv tozali kosuana te mais juste pour avoir de précision nous sommes tous des congolais même si nous sommes pas au CONGO nous sommes des frère na lingi na préciser eloko moko, bandeko nioso oyo ba kufi avant PAPA LISALA est ce que ezalaki mbasu? donc nga nazali kolobela kaka mbasu te mais ndenge bazali kolandana derrière ça il doit avoir quelque chose, pourquoi kaka ba comédiens ba artistes bazali ebele mais kaka ba comédien nde bazali kolandana eza normal te mon frère je sais que la médecine est important tu peux avoir raison mais bango nioso bakufi na maladie moko te, tala depuis 2006 jusqu’aujourd’hui combien des comédiens oyo ba bakufi? vieux DUDU, MBOGE, TATU KALOMBO, VISA, MALASI, SANS SOUCI, ezo lobela biso eloko te eza normal te en plus bazali kokufa na ba malade ya quelque jour seulement

  57. nasi Says:

    botiela biso image ya bale oyo abetaki dimache avant akufa oyo ememi ye na liwa toza na posa ya bilili svp po makambo nde ebandaki wana

  58. mado tshianda Says:

    liwa komona boye eza pasi makasi na sengi na ba commediens nioson na bolingo ya nzambe basenga mawa na nzambe po makambu oyo esila ezalipasi komona ba ndeko nabiso ndenge liwa ezomema bango, tobanda na liste ya liboso, fr kiro,jeao,papa doudou,mama fin dimode,papa kidiafuka;mbonge;malasi;sans,mama lifulisi;souci:tatu kalombo,visa,lelo papa lisala combieeeeeee des person bakeyi kote ba comediens match eza saliteeeeeeeeeeeeeeeeee

  59. théo mukendi Says:

    tokanga mutu ndoki te po eza faute ya kozanga kozua soin ya malamu,nde ebomi ndeko nabiso.epesa pe mayele naba oyo batikali,bazala pridents que soki babeli bakendaka na hopital pona kozua ba soin ya bien epa ya ba docteurs ya malamu aulieu bakendaka komibomisaka epa ya ba nganga ya kisi,na ba marabout.

  60. bibiche Says:

    c’est trop triste congolais qu’est ce qui vous arrive? il faut arreter ce masacre

  61. LA VERITE RIEN QUE LA VERITE Says:

    J’EN AI LE COEUR LOURD ET DES LARMES AUX YEUX.
    DIEU DIT: A MOI LA VENGEANCE, A MOI LA RETRIBIUTION. IL S PAIERONT CHERS, CEUX QUI EN SONT RESPONSABBLES.QUE DIEU ASSISTE CETTE FAMILLE EPPROUVEE ET CONSOLE LEUR COEURS MEURTRIS.
    MERCI CONGOMIKILI ET SERGE MWEPU POUR CE BEAU REPORTAGE.

  62. lindinha Says:

    LIWA YA PAPA LISALA ESILISI NGA POSA YA KOTALA THEATRE NAZOKOKA KONDIMA TE QUE AKUFI PENZA,TIKA MALIMO NAYE EPEMA NA KIMIA NIOSO

    LOVE YOU LISALA NAKOBOSANA YO JAMAIS PAPA

  63. THE BEST Says:

    TO GOD BE GLORY
    PEACE IN DR.CONGO

  64. gis makanda Says:

    que le bon Dieu ki est le consolateur de coeur abbatue a consoler mwasi na bana oyo batikali eza pasi kobungisa mutu oyo aza cher po na libota mais nzambe abatela bana pe mwasi lui ki est le pere des orphelins et le marie de veuve seul Dieu sait le source de sa mort ndenge pe ba ndeko misusu ba lobi ke nos comediens cherche la face de Dieu avec sinceriter ba tika ba loyenge ya buzoba

  65. Marie-louise789 Says:

    Motema pasi komona bana ya papa lisala ba zolela boye,
    nzambe akofuta oyo asali likambo oyo, pona
    kobuakela muninga malade.
    Nzambe akofuta ye.
    Tout le monde pleur pour papa Lisala car il est mort ,toi tu est content,ou contente.
    Merci que dieu te benisse.
    papa Lisala que ton ame reposse en paix.

  66. alexis yamamoto Says:

    QUE DIEU PROTEGE TA FAMILLE SURTOUT TES ENFANTS JE SUIS TRES TRISTE…LES PLEURES DE TA FAMILLE MA PROFONDEMENT TOUCHEE SURTOUT LE FILS……NZAMBE ABATELA BANGO PE APESA BANGO MAKASI…

  67. geraldine Says:

    SEIGNEUR TU MA CREE HOMME POURQUOI TU MA CREE HOMME
    MAIS J’SAIT QUE SE POUR UN BUTE REVELE MOI SEIGNEUR!!!!
    HOOOO!! PASI NA MOTEMA KOMONA BANA KO LELA HOOO!! SEIGNEUR TU EST
    LE PERE DES ORPHELIN ET LE MARIE DE VEUVES VEILLE SUR EUX SEIGNEUR!!
    NE LEUR ABANDONE PAS!!!

  68. mukulupa Says:

    VRAIMENT natali ba image naleli pe na tangi ba commantaire ya ba neko nionso bakomi vraiment esali ngai pasi pe na moni que biso nionso toza libanda tolinga bandeko nabiso batikala na afrique vraiment napesi batu nionso MERCI ya mingi po na ba commantaire tolingana boye eza malamu vraiment une fois de plus merci.

  69. laetitiaXL Says:

    aaaaaaaaaaaaaaah franchement les mots me manquent!!!! pourquoi,pourquoi,pourquoi? ah mwana ya papa lisala alélissi nga!
    ah papa lisala otiki bana na nani???? eza passi pé mawa mingui, ponanini ki mutema mabé ti na niveau ya ko boma muninga na yo MUTU???? hein na possa ya ko tala theatres eza lissussu ata mukié té meme pour moi une adepte de ceux_là!
    RIP papa lisala
    laetitia XL

  70. geraldine Says:

    tintin na yebaki te ke ozo sala cotisation
    nazui number na yo na ko benga yo pona part na nga!!!

  71. Mukwa-Ndabala Says:

    Mes chers Freres et Soeurs,Je suis tres emu par le fait de voir d’abord comment toute la communaute congolaise de l’etranger et meme celle du Pays a reagit a` la suite de la mort subite d’un des nos talentieux artistes du Pays.Ceci est un grand signe du changement dns nos mentallites et ce qui est a` remarquer est que beaucoups d’ intervenants malgres qu’ils ont des avis parfois opposes,mais ils se tolerent qu’en meme.Ils cherchent tous a` trouver une solution delicate pour ne plus avoir la meme situation revenir encore dans cette famille artistique et pour toute la le peuple congolais.Maintenant nazali kosenga na bandeko ya theatre bameka koluka un moyen ya kozala organiser na sens ya ba soins medicaux,nayebi te soki soki ba ORGANISATION LOKOLA BA CASOP oyo ezalaka na tango ya kala ezali kaka,ba s’affilier kuna pona ba soins primaire,mais soki cas emonani ya Urgence ba memaka bango na ba grands Hopitaux.Ba cas lokola ya Visa na Sans Souci ezonga lisusu te.Ca aussi ba Medecins oyo baza na ba Clinics na bango ya mike,soki bamoni que Cas oyo eza kosenga Hopital ya monene,ba tindaka ba malades bangu na ba grands Hopitaux oyo eza na ba specialistes po na ko sauver vie ya moto.Et puis ba cas lokola liwa ya Tatu KALOMBO,balobi ezalaki poison,il faut balandelaka ba makambo wana ti na suka,ba acteurs ya poison il faut ba kangama.SInon makambo oyo eza koleka na famille theatrale oyo ekosila te.Et aussi,il faut que organisation etalaka makambo ya ba Veuves na ba Orphelins ya ba Acteurs.Mais en attendant,Ndeko yo oza libanda ya mboka,po na lelo kaka te,mokolo oyo omonani na mwa makoki kanisa ba Orphelins .

  72. laetitiaXL Says:

    merci congomikili pona bilili mais comme vous dites que vous transemettez les infos en temps et en heure mais wapi ba images ya enterrement ya lelo kassi????SVP

  73. www.congomikili.com Says:

    laetitiaXL o zui info ke 2 min a kufi wapi? car congomikili kinshasa e wuti ko solola na ye sikoyo il se porte bien a za mm pas malade!..ba images ya enterrement ezo kota sikoyo

  74. larchbishopoflove Says:

    Ah Nzambe!!! pona nini boye??? motema mabe ya boye ewuti wapi? Mon Dieu c’est toi le pere des orphelins, le mari de veuves sounga famille oyo…que ton ame repose en paix papa Lisala nous t’oublierons jamais..a dieu

  75. laetitiaXL Says:

    aaaaaaaah merci beaucoup congomikili c une fausse rumeur qui court ici a toulouse!!! que Dieu soit loué comme c’est faux thanks U

  76. clemso Says:

    Merci a tous pour votre soutien a cette qui est éprouvé merci a toi MUKWA NDABALA pona idée oyo ya ko aider ba orphelins na ba veuves MERCI CONGO MIKILI PO NA BOULO OYO BOZA KOSALA TOZA SUR QUE BOKO TINDA BA IMAGE YA ENTERREMENT QUE LE BON DIEU VOUS BÉNISSE

  77. ojeans washala lonlon Says:

    pasi mingi vraiment pasi mingi que son ame repose en paix. pas des mort encore please . soit vos theatre en europe ou pas. tout les producteur bosolola muntu akoki kokufa mobesu boye te please ba comedien botika ki jalousie.

  78. okl comme congolais Says:

    vraiment pasi botika kindoki

  79. Eddy Says:

    Moi par contre je voudrais feliciter congomikili pour les images et leur dire s’il ya lieu bameka kotiela biso ba image ya ngonga mulayi, meme 30 minutes pardon mingi, po ezali kotika biso na posa. Nous voulons vivre les realités de notre pays en live, pardon mingi vraiment. Mes condoleances a sa famille et ses enfants.

  80. mayasi ngangu Says:

    Que sont ame répose en paix il nous manque bcp Dieu protege les artiste comedinies c tros

  81. Clavert Says:

    Voila ezali mawa mingi. Mais nalingi nalobela ba ndeko concernant “KOLUKA ELONGI YA NZAMBE”, ba ndeko liwa ezali po na motu nioso, na oyo alukaka elongi ya nzambe na oyo alukaka elongi ya nzambe te. Na poto awa bisika tovandi, mindele bakendaka eglise mingi te, tomonaka pe esika baza kotonga eglise ya sika na poto te. Tomonaka kaka ba eglise ya ba immigres nde ezali kobotama lokola mayebo.
    Tosengeli to comprendre que ata ba pasteur na ba sango pe bakufaka malgre balukaka elongi ya nzambe. Mais soki ba comediens bakufi plus ezali po na ba conditions ya vie mediocres, alors que ba pasteurs bango baza na mbongo ya dimes na mabonza, eko permettre bango balia biens balala na ba conditions ya bien.Soki pe babeli bazua ba traitements ya bien

    Tokoki kosambela ndenge natangi awa ba ndeko balobi Dieu protege nos comediens. Eza malamu, mais ye comediens aza kozua 100$ par production, aza na bana 6 ndenge tolandi, na muasi, aza locataire, akovivre comment? Alors tolingi nzambe abakisela ye 500 likolo ya 100 wana po azala bien? Ou bien nzambe aya kotikela ya mpiodi na fufu tongo nioso?

    Solution ezali na priere te, tovandi awa au lieu to copier makambo oyo esali que mindele bazala bien, tomema yango epai na biso po mboka etambola, biso tolingi kaka koluka ba ndoki na ba esprits saint.

    Totala ba reportages ya Rwanda. Tolingi bango te mais baza koleka biso na developpement.
    TOBOSANA TE QUE NZAMBE OYO TOKOMI KOBETELA TOLO NA CONGO, EZA MINDELE NDE BAMEMELAKI BISO BIBLE. MAIS BANGO MOKO BALUKAKA SOLUTION YA MAKAMBO NIOSO NA BIBLE TE MAIS BAZA BIEN.

    TOTIKI CONGO TOYEI AWA NA POTO. MAIS POURQUOI CONGO EZA KOTIKA BISO TE ? ELANDI BISO TII AWA ?

  82. me Says:

    kindoki ya ba producteur na batu ya poto bo tika kozua biloko na bango baza ba kadia.

  83. maghaly osnabrück Says:

    nzambe azali komona fourmi na se ya libanga ya munene eloko nini ezangi nzambe amona mutu oyo asali lisala boye.rien n’est impossible a Dieu soki olni mabe okobuka mabe obomi moninga na mbasu yo pe okokufa na mbasu tala sikoyo orpheline oyo na bana 6 pasi naye eokuela yo mutu na mutu nzambe atala yo.yo muru ozali oboma baninga likolo ya zua to ya 30 ou bien 50$

  84. zeyizo Says:

    tres tres deçu par la mort de papa lisala que son âme repose en paix

  85. Emany Wolo Says:

    Na pesi bino mbote ebele ba ndeko na ngayi.
    surtous ya liwa oyo ezo landana na maison ya ba artistes comedien.
    Vraiment prions beaucoup po Nzambe a sunga.
    Na ko senga pe bandeko oyo basalaka theatres batika Jalousie entre eux.
    Eloko mususu ekamuisaka ngayi soki ba Artiste musicien bakufeli baye ya Theatres ba kendeke,kasi soki ba oyo ya theatres ba kufeli ba oyo ya muzic ba yaka te po na nini?

    Nzambe azwa lukumu na manso Amen.

  86. pastor blaise raph Says:

    JE SUIS TOUCHE EN REGARDANT SON FILS EN PLEURS ET C´EST INCOMPREHENSIBLE ;INCONCEVABLE;MAIS LA BIBLE DECLARE (IL ESSUIERA TOUTE LARME DE LEURS YEUX;ET LA MORT NE SERA PLUS ;IL N´Y AURA PLUS NI DEUIL;NI CRI;NI DOULEUR,CAR LES PREMIERS CHOSES ONT DISPARU. BIENS-AIMES NE VOUS TROUBLEZ PAS VOYEZ PLUTÖT LESW SIGNES DU TEMPS DE LA FIN ET CORRIGEZ VOS TIRS ET VOS AMBITIONS . PASTOR RAPH BLAISE -WETZLAR -DEUTSCHLAND

  87. laure Says:

    ezalipasi na mawamingi namotema biso ba congolain tolingani te ponanini motema mabe koboma moninga oyo asaliboye abosana te nzambe azali bible elobi makila egangaka pasikomona bana ya moweyi na muasi na bandeko ezali penzapasi na motema nzambe asunga fm na yepenza

  88. Big-Jo of Alberta Says:

    Je m’adresse a Siatula et Evalavala;
    Bolobaki que moto oyo ako sala pirate toko bwakela ye mbasu!!!, yango na tuni bino: Vu de loin asala pirate? Moyindu asala pirate?, en plue toloba que Papa Lisala Ngomba ndenge akufi boye awuti ko sala pirate? Na zali ko yebisa bino que nazali na 2 ordinateurs na ndako, chaque piece ya theatre eko bima mikolo oyo, na ko banda ko sala 100 copies, soki na teki nzambe a pinir na ko banda ko kabela bato nioso bazali pembeni na ngai,mpo ba lekisi eloko moko ya malonga bo salaka lisusu te kaka ba makelele ya ko tanga ba kombo ya bato, libanga ezalaka na nzembo ekoma na theatre. Surtout bo yebi que bo talaka yango te bo tondisa ba betise na ba betise, est que Yandi Mosi makambo yo olobaka na ba theatre okoki ko loba yango liboso ya mwana na yo nto mama na yo? en plus les Jeunes filles ndenge bozali ko lata mabe ata soni bozali na ngo te.Felicitation na ba groupe evangeliques.

  89. amie 5627 Says:

    vaiment eza penza pasi mingi na mawa po na makambo oyo mes freres est soeurs
    ngai nazalaki na kin annee passer donc 2008 mutu na bango moko alobaki na biso
    MOMEKANO EZA NA BISO MAKASI NA BA THEATRES OYO .
    EST VOILA AKOSAKI TE NA NDIMELI YE BOZA NA DESORDRE MAKASI NA MAWA MONINGA ATIKI MUASI NA BANA PENZA BOYE PE BOYOKI ATA MAWA YA BANA TE BA NSAKALA AZOBIMA NA DOMAZE MUASI MABE MABE NDENGE WANA PULULU LISUSU NA DOMAZE EZA MAWA
    BOLANDA ZELA YA NZAMBE SATAN ALINGAKA KIMIA TE PO NA NGAI PAS DES COLIES PAS
    CODE
    QUE TON AME REPOSE EN PAIX MON ARTISTE COM .

  90. chantal Says:

    jesus,quelle tristesse,j,ai perdue ma mere d,une courte maladie,elle etait trop jeune,al,epoque j,avais 36 ans j,ai vous mes etfreres et soeur j,ai tomber ala depression tellement j,avaismal ,malgre mon age.en voyant ce petit garcon qui pleure son papa ,qui aime tant,oh seigneur ca ma reveller que de mouvais suovenir ,la veuve avec ses 6 enfnts,akosala nini na pasi ya congo”‘ tosunga famille oyo biso baye tozali awa na poto ata muke tout fait nombre ,na ba priere.nayebi que apres liwa ya maman grace ya ba priere mpe ba theatre ,sourire ezongaki mukeke papa lisala asekisaki biso mingi.merci.congo.mikili na ba image oyo.papa lisala ngomba liwa na yo et toucher poto mobimba na congo ,vraiment soki bokutanaka pesa papa doudou,tatu kalombo,visa,sans souci,lisala,mboge ,monoko,mopepe,ebale mondial,inga,basusu na bosani mbote ebele .tata nzambe na mawa na ye aymba yo na mboka na ye.que ton ame repose en paix,gloire en toi seigneur jesus.amen.

  91. Germaine m Says:

    october26th,2009at 22;27pm
    Vaiment gai na lobi nboye bandeko na biso ba congolese denge tolonbaka na english.na butu ya lelo na lali po sango yaliwa yapapalisala.vaiment ba comedien nabiso po nani kosala moninga boye.atiki mausi nabana na pasi vaiment.tala bana bazo lela papa esali bino mawate.bino batu bosalaka ba theatre.papa lisala atiki bana na ye6,nani akonbokola bango ata lelo batu ya poto ba pesi kamua bomgo na famlle wana ebongo lobi oyo ekoya mawa mingi na biso bacongolais.po nani kosala moninga bongo oyo asale na famille naye.congomikilina bala simabotia pe ba image football oyo ye abetaki dimache.papa lisala tika ete nzambe abatela motema na yo pema na kimia nioso amen.

  92. zinga Says:

    bonsoir congomikili toyoki que domaze azui liboma esque c’est vrai ou faux pardon vraiment po signale biso please…..

  93. zinga Says:

    mes condeleances na famille ya papa lisala. nzambe abosanaka ba oyo ya ye te ba kangama na ye nde bakozua kimia oyo moto ya mokili akoki kokepe te. tika nzambe apambola libota thankyou.

  94. Florette M. de Liverpool Says:

    Ezali pasi mpe mawa mingi pona biso bandeko oyo tolingi toyeba cause yaliwa soki ya maladie normale to ya kobuakela pona kosala polemique,bible elobi tolela na baye bazali kolela,tosepele mpe na baye bazali kosepela. tobosana te ke yesu alingi kozonga tobongola mitema pona tozala epargner na monguna satan. jalousie EZALAKA mpe ekozala toujours na place nionso oyo babengi association des hommes par ce le coeur de l’homme est mauvais de nature, ce pour quoi JESUS-CHRIST ayaki pona batu ya masumu, il etait venu pour nous sauver du pecher. tokabola mawa na famille lisala plz. na ndambo ozali nayango yo ndeko nzambe apamboli na misolo, tosunga ba orphelins, maman asala ata business moko oyo ekoki ko permetre ye kobokola bana na biso. QUE DIEU VOUS BENNISSE! BA OYO BAZUI YANGO A COEUR. MERCI!

  95. olga yala Says:

    EZA PASI YA KOTALA MUTU OYO TOBANDAKI KOTALA NA BAFILM NA BISO PE MOTO OYO NA LINGAKA PO NA BA COMMEDIE NA YE ALALA BOYE C’EST VRAIMENT TRISTE.SOKI NAZO MONA BOYE PONA NINI TOBUAKA MASIYA .BISO BATO YA OYO BA BENGAKA BA PASSAGERS TOTIKA KOSALANA MABE PO BISO NIOSO TOZALI BA KUFI MOTO AKO TIKALA ETERNELLEMENT AZALI TE TO PENSER NA JUGEMENT DERNIER .PAPA LISALA AZALAKI ORIGINAL NA BA COMMEDIE NA YE ET PUIS NA KOSALA NA YE THEATRE ABANDAKI KOMONANA MOTO MOKO YA HUMBLE PE GENEREUX.QUE SON AME REPOSE EN PAIX.UN JOUR TOKOMONANA NA ESIKA NZAMBE ARESERVELA BISO MAIS MOTO ABUAKELAKI YE MALADIE WANA NZAMBE A PRENDRE SOINS NA YE PO YE KAKA NDE AYEBI ESIKA MALADE WANA EWUTAKI .OBJECTIF NA NGA UN JOURS NA AIDER BA PAUVRE TALA BANA YA PAPA LISALA NA MUASI NA YE NAZA NA BA DECHIREMENT NA MOTEMA NZAMBE ASUNGA BISO PO TOSALISA BANGO NA MOKE OYO TOKO ZUA

  96. patience italia Says:

    eza pasi pe mawa komona mwasi,bana pe na famille kolela boye nzambe abatela asunga azala na famille oyo nzambe ye moko atala likambu oyo po trop c’est trop.

  97. apolinaire sebastiao Says:

    tika nzambe abatela libota na ye mobimba.
    serge mwepu merci na boulot na equipes mobimba.

  98. polele-polele Says:

    azali mawa pe pasi komona makambo ya boye. mais biso oyo tomoni eteyi biso nini
    esika to monaka munene ya nzambe yango oyo lia,mela kasi yeba ka ke yo na ngai pe toko lala ndenge ndeko na biso pe alali mais na ye bi mutu moko ata olali na mokolo ya suka ye akolamusa yo kombo na ye jesus christ babengi ye la Resurrection. commen la bible dit dans le livre de jean 11:25 Jesus dit je suis la Resurrection et la vie. Celui qui croit en moi vivra, quand meme il serait mort. eteya biso Amen

Commentez ici!